You are on page 1of 2

Mayebisi

Manaka ma mposo
O mwa inei na 18h RENOUVEAU DANS LESPRIT O mwa mposo na 15h 1. CHORALE 2. ACOLYTAT 3. LECTORAT O mwa lomingo na 12h30 LEGION DE MARIE O mwa lomingo inso na 14h00 MISA NA LINGALA (RITE ZAIROIS) N.B. - Mpo ya Batisimu esengeli komiyebisa mposo isato liboso mpo ya bolengeli. - Nganga Nzambe azali mpe koyamba mpo ya ntubela mpe mpo ya kolengele libala lisantu.
Mabonza ma eyenga eleki 331.37

Nsango ya eklezya
He said "live and let live" had too often become "do what you please". The PM said it was wrong to suggest that standing up for Ch ri s t i a n i t y wa s "somehow doing down other faiths". Describing himself as a "committed" but only "vaguely practising" Christian, the PM admitted he was "full of doubts" about big theological issues. 'Don't do God' But he staunchly defended the role of religion in politics and said the Bible in particular was crucial to British values. "We are a Christian country and we should not be afraid to say so," he told the audience at Christ Church. "Let me be clear: I am not in any way saying that to have another faith - or no faith - is somehow wrong. "I know and fully respect that many people in this country do not have a religion. "And I am also incredibly proud that Britain is home to many different faith communities, who do so much to make our country stronger. "But what I am saying is that the Bible has helped to give Britain a set of values and morals which make Britain what it is today." Mr Cameron said people often argued that "politicians shouldn't 'do God'" - a reference to a comment famously made by former No 10 spin doctor Alistair Campbell when Tony Blair was asked about his religion. "If by that they mean we shouldn't try to claim a direct line to God for one particular political party, they could not be more right," the PM said. "But we shouldn't let our caution about that stand in the way of recognising both what our faith communities bring to our country, and also just how incredibly important faith is to so many people in Britain." Mr Cameron also said it was "easier for people to believe and practise other faiths when Britain has confidence in its Christian identity". "Many people tell me it is much easier to be Jewish or Muslim here in Britain than it is in a secular country like France," he said. "Why? Because the tolerance that Christianity demands of our society provides greater space for other religious faiths too. "And because many of the values of a Christian country are shared by people of all faiths and indeed by people of no faith at all."

Aumnerie Catholique Congolaise de Londres


Saint Joan Of Arc 60 Highbury Park, Islington, London, N5 2XH Tel : 0207 790 6463 Mob: 0794 467 1275 e-mail : congolesechaplaincy@gmail.com Abb Nol Mpati, Aumnier

olo, Mbango, Lik Makasi

Lomingo la 4 la Aventi, mobu B

ans Vers 5

18 dcembre 2011

LOKASA YA LOMINGO

1 Cor 16,2 :" O mikolo mya lomingo


minso moko moko wa biso atia mwa mosolo mpembeni lokola akoki".

Communication sociale: likita ya ordinaire lundi 19 dcembre epai ya papa Franque.

LOKOLA MPE ELONGO NA MARIA TOLENGELA BOYEI BWA YEZU. Lokola Maria, toponami mpo toyamba Yezu, Nzambe oyo azali kobikisa, ye oyo azali koya. Nsango Elamu ya lelo ezali kolakisa biso ndenge nini tosala. - Otondi ngrasya: Tokoki koyamba Yezu se na motema peto. Tomipetola. - Obanga te: Ntango ekoki ya kotia motema se na Nzambe, kasi ya kobanga te. - Elimo Santu akokitela yo: Na biso moko tokokoka te. Ntango ekomi mpo tobenga Elimo ya Mokonzi mpo tososola mobombamo ya mbotama malamu. - Mosaleli wa Nzambe ngai oyo: Ndenge ya kitoko ya kolakisa te Yezu azali na biso, ezali kozala mosaleli; mpo oyo elingi Nzambe esalema. Elongo na Maria, tolengela boyei bwa Yezu. COMME ET AVEC MARIE, PRPARONS LA VENUE DE JSUS. Comme Marie, nous sommes choisis pour accueillir Jsus, Dieu-qui-sauve, qui vient. L'vangile nous invite afficher quelques attitudes. - Comble-de-grce: laccueil de Jsus ne pourra tre bnfique pour nous que dans la mesure ou nous sommes en tat de grce. - Sans crainte: Ce moment est tellement souhait qu il nous faudra le vivre avec la confiance et donc sans crainte. - LEsprit Saint viendra sur toi: Seuls nous pouvons rien. L'heure est venue d'implorer l'Esprit du Seigneur pour mieux comprendre le mystre de la proximit et de l'incarnation. Vient Esprit du Seigneur, nous tattendons. - Voici la servante du Seigneur: La meilleure manire de vivre la prsence du Christ en nous, est sans nul doute d'tre disponible au projet de Dieu, donc son service. Avec Marie, prparons nous la venue de Jsus.

David Cameron has said the UK is a Christian country "and we should not be afraid to say so".
In a speech in Oxford on the 400th anniversary of the King James Bible, the prime minister called for a revival of traditional Christian values to counter Britain's "moral collapse".

Mpo ya nsango inso ya esengo to ya mawa itali lisanga benga bandeko ba Commission ya Caritas o ba numros iye mpo ya bopanzi nsango : 07930229408, 07957781758.
Copyright Commission de Communication Sociale de lAumnerie Catholique Congolaise de Londres

Abb Nol Mpati, aumnier

SOYONS SENSIBLES LA CAMPAGNE DE NOL.

Matangi ma lelo
Litangi lya yambo / Premire lecture / First reading Nzambe alakeli Davidi te bokonzi bwa ye bokotikala seko. Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya ibale ya Samuel (7,1-5.8b-11.16) 1 Mokonzi Davidi akomi kofanda o ndako ya ye o Yeruzalem. Nzambe asalaki te banguna ba bikolo bya penepene baya kobundisa ye lisusu te, 2 bongo Davidi alobi na profeta Natan: ,,Tala, ngai nakofandaka o ndako ya mabaya ma motuya mpe sanduku ya Bondeko bwa Nzambe ezali bobele o ema! 3 Natan azongiseli mokonzi: ,,Kende mpe sala manso olingi kosala, Nzambe azali na yo. 4 Kasi o butu bonamei mpenza Nzambe atindeli Natan maloba maye: 5 ,,Kende koyebisa mosaleli wa ngai Davidi: Mokonzi Nzambe alobi boye: Yo moto okotongela ngai ndako nafanda wana? 8 Ngai moto nakamataki yo o esobe, esika ozalaki kokengele mpata; mpo te ozala mokonzi wa ekolo ya ngai Israel. 9 O makambo manso osalaki nazalaki na yo, o miso ma yo nasukisi banguna ba yo banso. Nakopesa yo nkombo ya lokumu lokola nkombo ya bankumu banene ba nse mobimba. 10 Nakopesa bana ba ekolo ya ngai Israel mabel, nakofandisa bango kuna mpo batikala wana seko. Bakolengelenge lisusu te, bato babe bakoya koyokisa bango nsoni lisusu te, 11 lokola basalaki uto ntango natiaki bazuzi baye bakambaki ekolo ya ngai Israel. Nasali te banguna ba yo banso batika yo kimia. Mokonzi ayebisi yo te ye moko akotongela yo ndako. 16 Libota lya yo mpe bokonzi bwa yo bokotikala seko. Ngwende ya yo ya bokonzi ekoumela seko. (Bomanyoli) Psaume / Psalm / Nzembo 89 (88), 4-5,27-28,29-30 E Mokonzi, yo ozali na maloba ma bondeko bwa seko. 1. Nakataki bondeko na moto oyo namonoki, Nalayaki ndai na Davidi, mosaleli wa ngai : Nakolendisa bokonzi bwa yo bozala seko, Nakotongela yo ngwende o bileko na bileko . 2. Ye akobenga ngai na nkombo Tata wa ngai, Nzambe wa ngai, libanga likobikisa ngai! Bongo nakokomisa ye mwana wa yambo, akoleka bakonzi banso ba nse. 3. Nakolakisa ye bolingi bwa ngai seko, Bondeko bwa biso na ye bokokufa te. Natii molongo mwa libota lya ye o bokonzi seko, Ngwende ya ye ekoumela seko.
Litangi lya ibale / Deuxime lecture / Second reading

Matangi ma lelo
sikawa momononi polele. Lokola ekomami o Minkanda Misantu, Nzambe atindi te bayebisa mwango na bato ba bikolo binso, bandima mpe batosa mwango. 27 Bobele ye moko Nzambe apusi bwanya. Nkembo na ye, mpo ya Yezu Kristu, o bileko na bileko. Amen. Nsango Elamu / vangile / Gospel Aleluya. Aleluya. Mosaleli wa Nzambe, ngai oyo; esalema na ngai lokola yo olobi. Aleluya. Nsango Elamu lokola santu Luka akomi (1,26-38) 26 Awa Elizabeti akomi na zemi ya sanza motoba, Nzambe atindi anzelu Gabriel o Nazarete, mboka yoko ya Galilea. 27 Atindi ye epai ya ngondo moko, nkombo ya ye Maria; babandeli ye mobali nkombo te Yozefu, wa libota lya Davidi. 28 Anzelu akoti o ndako ya ye mpe alobi: ,,Losako, otondi ngrasya; Mokonzi azali na yo. 29 Awa Maria ayoki maloba maye, abangi mingi mpe amituni ntina ya losako loye. 30 Anzelu alobi na ye: ,,Obanga te, Maria, Nzambe alakisi yo bolamu bwa ye. 31 Tala, okokwela zemi mpe okobota mwana mobali: okopesa ye nkombo Yezu. 32Akozala moto monene, bakotanga ye Mwana wa Nzambe wa Nta-Likolo. 33 Mokonzi Nzambe akopesa ye ngwende ya Davidi, nkoko wa ye. Akoyangela libota lya Yakob seko, bokonzi bwa ye bokosuka te. 34 Kasi Maria atuni anzelu: ,,Mpo yango ekosalema boniboni, zambi nayebi mobali te? 35Anzelu abobi na ye : ,,Elimo Santu akokitela yo; nguya ya Nzambe wa Nta-Likolo ekozipa yo; yango wana mwana okobota akozala mosantu mpe bakobyanga ye Mwana wa Nzambe. 36 Mpe tala, ndeko wa yo Elizabeti, ye mpe akweli zemi ya mwana mobali, awa asili akomi mobange. 37 Azalaki ekomba, sikawa akomi na zemi ya sanza motoba, zambi likambo lyoko lileki Nzambe na bokasi te. 38 Maria alobi : Mosaleli wa Nzambe ngai oyo, esalema na ngai lokola olobi! Mpe anzelu atiki ye.
PROGRAMME YA NOEL 24 dcembre 2011: Concert ya Nol na 20H30 mpe Misa ya Nol ya butu awa na St Joan Of Arc na 21H. 29 dcembre 2011: Prire daction de grce na 18H awa na Paroisse. 1er janvier 2012: Misa mpo ya ebandela ya mobu awa na paroisse na 14H. 4 janvier 2012 : 20me anniversaire de sacerdoce de labb Nol Mpati
Losambo mpo na Congo

Na mokano mwa ye mwa kotindela biso Yezu Kristu, Nzambe Tata alingaki kosangisa bato banso o libota lyoko lisanga na Kristu. Monkanda mwa yambo mwa santu Polo ona bakristu ba Roma (16,25-27) Bandeko, 25 nkembo na Nzambe, oyo azali na nguya ya kolendisa bino engebene na Nsango Elamu ya Yezu Kristu eye nazali kosangela. Yango nde mobombamo mwa Nzambe moyebani sikawa: uto bileko na bileko bato bayebaki mwango te, 26 kasi

Nzambe, Totondi Yo, tokumisi Yo, Okeli mboka Congo mpe otondisi yango na bomengo ndenge na ndenge, Yo opesi biso mboka oyo Congo, Tozali kosenga Yo tinda Elimo Santu epai na biso ba congolais, Mingi mpenza na baye balingi kokamba mboka oyo Congo, Pesa bango bwanya mpe mayele ya kobanga Yo mpe ya kolinga mboka na bandeko banso, Simba mitema mya moko moko mpo bazwa makanisi kitoko maye makotombola mboka oyo Congo, Congo ezala mboka ya boboto, ya boyokani, ya bosembo mpe ya esengo, Mama Maria omema mboka oyo Congo, osambela mpo ya biso, Mwa-esengo Bakandja, Mwa-esengo Anuarite, bino bana Congo, bosambela mpo ya biso, Tosambeli na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya Elimo Santu, Amen.

You might also like